Skip to main content

Agnes Kanjinga, azali moto ya mayele

A longwe na Congo mpo na kokima mobulu oyo ezali kokoba. Mpo na koluka ndako ya libateli mpo na bana na ye, ayaki na Chicago mpe a zwaki lisanga na ye.

Martine Séverin for Borderless Magazine
Agnes Kanjinga na libándá ya ndako na ye na Skokie, na Etat ya Illinois. 19 Mai 2023.

A longwe na Congo mpo na kokima mobulu oyo ezali kokoba. Mpo na koluka ndako ya libateli mpo na bana na ye, ayaki na Chicago mpe a zwaki lisanga na ye.

Pew Research elobi ete moindo moko kati na bato zomi na États-Unis azali moto oyo  awutaki na mikili mosusu . Na Les Immigrés Noirs Aujourd’hui, Borderless Magazine esololaki na ba immigrés Noirs zinga zinga ya Chicago na ntina ya bandako na bango, bomoi na bango, mpe mikakatano oyo bakutanaki na yango na koya na Etats-Unis

Agnes Kanjinga ayebaki moto te ntango ayaki na Chicago elongo na ndeko na ye ya mobali mpe bana misato. Kanjinga, oyo azali na libota ya Congo, akomaki na engumba yango lokola mokimi oyo awutaki na Afrique du Sud.

A longwe na République Démocratique du Congo mpo na kokima mobulu oyo ezali kosalama na kati. Atako bambula na ye na mobembo, azali na likoki ya kozala na boyokani na bato oyo balobaka monoko na ye. Lelo oyo, Kanjinga azali na maison communautaire na Skokie, oyo ezali pembeni  ya engumba epai abatelaka bana misato mpe asalaka lokola mosungi ya infirmiere.

Kanjinga a sololaki na Borderless mpo na kokola na Congo, koluka na ye ndako ya libateli mpo na bana na ye mpe lolenge nini azwi lisanga wuta ayaki na Chicago.

Want to receive stories like this in your inbox every week?

Sign up for our free newsletter.

Na yaki na Etats-Unis na 2016 na nzela ya agence moko ya Éthiopie sima ya kokomisa nkombo na Nations Unies . Ba ponaki Chicago po na communauté Éthiopienne ezalaki déjà wana. Tozalaki kofanda na Evanston na ebandeli. Nayaki elongo na ngai, bana na ngai misato mpe leki na ngai ya mobali. Nazalaki na esengo mpe na kobanga. Nazalaki kobanga mpo na komona nini ekoki kosalema na Amerika.

Na botama pe nakendeki kelasi na Congo. Na kolaki na ville ya Lubumbashi elongo na baboti na ngai. Nazalaki na libota monene. Nazalaki elenge mpe nazalaki kofanda na ndako ya tata na mama na ngai, mpe na mobimba tozali libwa. Tango nazalaki na baboti na ngai  nazalaki kokanisa likambo ya mabe te mpona mboka. Makanisi na ngai ezalaki ya kokóma monganga, kasi tata na ngai akufaki mpe nasengelaki kosalisa mama na ngai. Donc ba possibilités financieres ezalaki ebele te pona ngai nakende ko continuer éducation. Na Congo na tango wana batu bazalaki kobunda deja. Nazalaki na mbula soki 24 ntango nakendaki kofanda na Zambie na 2007, nazalaki kuna mbula moko.

Nafandaki na Durban, na Afrique du Sud nsima ya 2007. Nayebaki moto te ntango nakendaki kofanda kuna. Tata ya bana na ngai asilaki kokende na Afrique du Sud. Nazalaki koluka ye, kasi nayebaki te esika azalaki. Famille moko na Afrique du Sud endimaki ngai nafanda na ndako na ye elongo na bana na ngai misato poso moko mpo nakoka koluka pe komona tata na bango.

Agnes Kanjinga na ndako na ye na Skokie, Ill. 19 mai 2023.Martine Séverin for Borderless Magazine

Ezalaki pembeni te mpo azalaki kofanda na ville mosusu. Ville oyo ezalaki penza mosika. Lokola distance ya Chicago ti esika moko boye na Californie. Lokola nazalaki moto ya sika na mboka wana, nayebaki kosalela bus to train te. Nayebaki monoko ya mboka wana te. Mwana na ngai ya mwasi azalaki kaka na sanza 6 na ntango wana. Finalement nakendaki  ko retrouver mobali nanga;  afandaki epai ya baninga na ye, pe navandaki na bango ti tango nazwaki ndako na ngai moko ya kofutela. Nazwaki mosala ya couturiere; nazalaki kotonga bilamba banda na ngonga ya 7 ya tongo ti na ngonga ya 18 ya mpokwa

Tango na biso na Afrique du Sud ezalaki kitoko mingi, oyo ezalaki avant xénophobie ebanda . Yango ebandaki pene na 2015. Kimya to libateli ezalaki te. Bato ya Zulu bakokaki kozala likama. Balingaki basali yaba paya te. Soki osali na bango, pe balingaka yo te, tangu nioso bakoki koboma yo. Ntango mosusu bazalaki kimia; yango ezalaki mokakatano mpo na biso. Ntango bana na ngai bakokende kelasi nazalaki kobanga pe kobondela mpo na bango bazonga na kimia.

Esengelaki mbula misato mpo na nsuka kokende na Amerika mpo na libateli na biso. Processus ezalaki facile te mpo il fallait ozala na connection directe na mutu na esika oyo okendaka ko mikomisa. Moninga na ngai abengaki, mpe alobaki ete Haut-Commissaire ya Nations Unies mpo na bato bakimá mboka (HCR) bazalaki kosala na lingomba moko mpe kosalisa bato bakimá mboka. Lokola nazalaki kosala bangonga mingi na moi, tosengelaki kokende na butu. Ezalaki pene na ngonga ya 10 ya butu ntango nakendaki elongo na leki na ngai ya mobali na ndako nzambe mpe nazwaki numero na bango ya telefone.

Agnes Kanjinga na bana na ye ya mibali uta na loboko ya mwasi, George Mutombo, 19, mpe Daniel Tshimanga, 18, libanda ya ndako na bango na Skokie, Ill. 19 mai 2023.Martine Séverin for Borderless Magazine

Migration na ngai ezalaki na nzela na bango. Na mikomisaki liboso mpe nabandaki processus na interview. Ntango nayaki na Chicago na 2016, HCR esalisaki ngai na mbongo ya kofutela ndako mpe esalisaki ngai nazwa mosala. Mbala mingi basalisaka kaka na bowumeli ya sanza lokola misato, kasi basalisaki ngai na bowumeli ya sanza motoba.

Nakuti communauté moko awa tango nakomaki. Nakuti moninga moko pene na ndaku na ngai na Evanston, azalaki réfugié congolais lokola ngai. Nakutanaki na ye ntango nazalaki kotika bana na ngai na kelasi. Na ntango ya likita moko ya RefugeeOne Zoom, namipesaki mpo na kobatela mwasi moko ya mobange. Aza pe ya Congo, kasi ayaki awa kala. Akoki koloba Lingelesi te, kasi ayebi monoko na ngai ya mboka.

Nakutanaki na Emma Yaaka na Aramark, tosalaki elongo na tango wana. Ezalaki mosala na biso ya liboso ya kokota, Aramark ezalaka na momesano ya kozwa bato oyo bautá na mikili mosusu. Tozalaki kosukola mpe kosala mosala ya kobongisa ndako. Azalaki koloba monoko na ngai, mpe mbala nyonso oyo moto alobaka monoko na ngai nasepelaka kozala penepene na moto yango. Ntango mosusu ngai ná Emma tosalaka elongo na lisangá. Tosololaka, mpe ntango mosusu nasololaka na mabota oyo azali kosala na bango.

Ngai na Emma tosalaki elongo na Aramark na bowumeli ya mbula soki mibale, mpe nsima na yango tokendeki liboso na kelasi mpe tozwaki mikanda na biso ya kondimisa. Na nsima, tobandaki misala ya sika. Nazali mosungi ya infirmiere oyo azali na mokanda ya kondimama sikawa mpe nalingi kozala infirmier pratique oyo azali na licence. Mwana na ngai ya mibale ya mobali azali na eteyelo monene. Azali kotanga na Oakton Community College. Ndoto na ngai ezali ete bana na ngai bazwa kelasi ya malamu, bakende liboso na bomoi na bango mpe bazala na ndoto ya Amerika.

Lisolo oyo esalemaki na nzela ya méthode collaborative lokola esungami na Borderless Magazine. Mpo na koyeba ndenge nini tosalaka masolo lokola oyo, tala ndimbola na biso ya miso ndenge elobami .

Total
0
Share